-
Estere 3:13Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Mpe mikanda etindamaki na nzela ya bamemi-mikanda+ na bitúká nyonso oyo eyangelami ya mokonzi, mpo na kosilisa nyɛɛ, koboma mpe kobebisa Bayuda nyonso, elenge mobali ná mobange, bana mike ná basi, na mokolo moko kaka,+ na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, elingi koloba, sanza ya Adare,+ mpe kopunza biloko na bango oyo babɔtɔlaki.+
-
-
Estere 9:1Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Mpe na sanza ya zomi na mibale, elingi koloba, sanza ya Adare,+ na mokolo ya zomi na misato ya sanza yango, na ntango oyo liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye esengelaki kokokisama,+ na mokolo oyo banguna ya Bayuda bazalaki kozela mpo na kokonza bango, makambo ebongwanaki, Bayuda nde bakonzaki baoyo bazalaki koyina bango.+
-