Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Estere 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adare; mpe bapemaki na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango, mpe bakómisaki yango mokolo ya fɛti+ mpe ya kosepela.+

  • Nzembo 18:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpo yo moko okopelisa mwinda na ngai, Ee Yehova;+

      Nzambe na ngai akokómisa molili na ngai pole.+

  • Nzembo 30:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo nkanda oyo ayokelaka moto ezalaka mpo na mwa ntango,+

      Soki asepeli na moto ezali mpo na bomoi mobimba.+

      Na mpokwa kolela ekoki kofanda epai na biso,+ kasi na ntɔngɔ, koganga ya esengo.+

  • Nzembo 97:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Pole ebimi mpo na moyengebene,+

      Mpe esengo mpo na bato oyo bazali na motema sembo.+

  • Masese 11:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo na motema malamu ya bayengebene, sité ezalaka na esengo makasi,+ kasi ntango bato mabe bakufi, koganga ya esengo ezalaka.+

  • Yisaya 30:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe pole ya sanza oyo ebimi mobimba ekokóma mpenza lokola pole ya moi oyo ezali kongala; mpe pole mpenza ya moi oyo ezali kongala ekobakisama mbala nsambo,+ lokola pole ya mikolo nsambo, na mokolo oyo Yehova akokanga elamba na esika oyo bato na ye babukani+ mpe akosilisa+ ata mpota monene oyo euti na kobɛta oyo abɛtaki.

  • Mika 7:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ee yo mwasi oyo ozali monguna na ngai, kosepela te na oyo ezwi ngai.+ Atako nakwei, nakotɛlɛma kaka;+ atako nazali kofanda na molili,+ Yehova akozala pole epai na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto