-
Estere 3:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Bongo babengisaki basɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi+ na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na misato ya sanza yango, mpe na kolanda mitindo nyonso oyo Hamane apesaki, bakomelaki+ basatrape ya mokonzi ná baguvɛrnɛrɛ oyo bazalaki kokamba bitúká ndenge na ndenge oyo eyangelami,+ mpe bankumu ya bato ya bikólo ndenge na ndenge, na etúká mokomoko oyo eyangelami na kolanda ekomeli na yango+ mpe ekólo mokomoko na kolanda monɔkɔ na yango; yango ekomamaki na nkombo+ ya Mokonzi Ahasueruse mpe etyamaki kashɛ na lopɛtɛ ya kotya bilembo ya mokonzi.+
-
-
Estere 8:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Sikoyo alobaki ete: “Soki emonani malamu na miso ya mokonzi, mpe soki nandimami+ liboso na ye mpe soki likambo yango ebongi na miso ya mokonzi mpe soki nazali malamu na miso na ye, tiká mokanda ekomama mpo na koboma makambo oyo ekomamaki na mikanda,+ mwango ya Hamane mwana ya Hamedata Moagage,+ oyo ye akomaki mpo na koboma Bayuda+ oyo bazali na bitúká nyonso oyo eyangelami ya mokonzi.+
-