19 Kasi bango balobaki na ye ete: “Fandá nyɛɛ. Tyá lobɔkɔ na yo na monɔkɔ, mpe yaká tókende, okóma tata+ mpe nganga-nzambe+ na biso. Nini eleki malamu: otikala nganga-nzambe na ndako ya moto moko+ to okóma nganga-nzambe ya etuluka mpe libota mobimba na Yisraele?”+