Hosea
13 “Ntango Efraime azalaki koloba, bato bazalaki kolɛnga; azalaki na lokumu na Yisraele.+ Kasi amemaki ngambo mpo na Baala+ mpe akufaki.+ 2 Mpe sikoyo basali lisumu mosusu mpe na palata+ na bango, bamisaleli ekeko ya palata oyo enyangwisami, bikeko na kolanda mayele na bango moko,+ yango nyonso mosala ya bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ.+ Bazali koloba na yango ete: ‘Bato oyo bazali bapesi-mbeka bápwɛpwa bana ya ngɔmbɛ ya mpambampamba.’+ 3 Yango wana, bakokóma lokola mapata ya ntɔngɔ+ mpe lokola mamwɛ oyo elimwaka na ntɔngɔ mpenza; lokola mposo ya blé ya kokauka oyo mopɛpɛ ememi uta na esika ya kotutatuta mbuma+ mpe lokola molinga oyo ezali kobima na lidusu ya nsamba.
4 “Kasi ngai nazali Yehova Nzambe na yo banda na mokili ya Ezipito,+ mpe oyebaki Nzambe mosusu te kaka ngai; mpe mobikisi moko te azalaki, kaka ngai.+ 5 Ngai nayebaki yo na esobe,+ na mokili ya bafiɛvrɛ.+ 6 Batondaki ntango balyaki na bisika na bango ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+ Batondaki, mpe motema na bango ebandaki komitombola.+ Yango wana babosanaki ngai.+ 7 Mpe nakokóma na miso na bango lokola mwana ya nkɔsi.+ Lokola nkoi pene na nzela, nakokoba kotala.+ 8 Nakokutana na bango lokola urse oyo ebungisi bana na yango,+ mpe nakopasola mwa eloko oyo ezingi motema na bango. Mpe nakolya bango kuna lokola nkɔsi;+ nyama moko ya zamba ekopasolapasola bango.+ 9 Ya solo, ekomema yo na libebi,+ Ee Yisraele, mpamba te ezalaki mpo na kotɛmɛla ngai, kotɛmɛla mosungi na yo.+
10 “Bongo, wapi mokonzi na yo, mpo abikisa yo na bingumba na yo nyonso,+ mpe basambisi na yo, oyo ozalaki kolobela bango ete: ‘Pesá ngai mokonzi mpe bankumu’?+ 11 Napesaki yo mokonzi na nkanda na ngai,+ mpe nakolongola ye na nkɛlɛ na ngai.+
12 “Libunga ya Efraime ezingami, lisumu na ye ebatelami malamu mpenza.+ 13 Mpasi ya mwasi oyo azali kobota nde ekoyela ye.+ Azali mwana ya bwanya te,+ mpamba te, soki eleko ekoki, akotɛlɛma nyɛɛ te na ntango bana babimaka na libumu.+
14 “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Nkunda;*+ nakobikisa bango na liwa.+ Ee Liwa, wapi bitubeli na yo?+ Ee Nkunda,* wapi nguya na yo ya kobebisa?+ Nakomonisa motema mawa te.+
15 “Soki ye mwana ya matiti ya ebale, akobota mingi,+ mopɛpɛ moko ya ɛsti, mopɛpɛ ya Yehova, ekoya.+ Ekouta na esobe moko, mpe ekokaukisa libulu na ye ya mai mpe ekosilisa mai ya liziba na ye.+ Oyo wana akopunza bomɛngo ya biloko nyonso ya kitoko.+
16 “Bakotalela Samaria ete azali na ngambo,+ mpo azali mpenza kotombokela Nzambe na ye.+ Bakokwea na mopanga.+ Bana na bango bakokatama bitenibiteni,+ mpe basi na bango ya zemi bakopasolama mabumu.”+