Ebandeli 26:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Na nsima, Yisaka abandaki kolona milona na mokili yango,+ mpe na mbula yango, abukaki mbala nkama moko (100),+ mpo Yehova azalaki kopambola ye.+ Kolimbola Mibeko 28:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe mapamboli oyo nyonso ekokitela yo mpenza mpe ekozwa yo,+ mpamba te ozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo: Nzembo 5:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Mpo yo moko okopambola moto nyonso oyo azali moyengebene,+ Ee Yehova;Okozinga bango+ na kondimama lokola na nguba ya monene.+ Nzembo 84:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+Apesaka boboto mpe nkembo.+Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.+ Nzembo 128:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpo okolya mbuma ya mosala makasi ya mabɔkɔ na yo.+Okozala na esengo mpe makambo na yo ekotambola malamu.+ Masese 10:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi,+ mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.+
12 Na nsima, Yisaka abandaki kolona milona na mokili yango,+ mpe na mbula yango, abukaki mbala nkama moko (100),+ mpo Yehova azalaki kopambola ye.+
2 Mpe mapamboli oyo nyonso ekokitela yo mpenza mpe ekozwa yo,+ mpamba te ozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo:
12 Mpo yo moko okopambola moto nyonso oyo azali moyengebene,+ Ee Yehova;Okozinga bango+ na kondimama lokola na nguba ya monene.+
11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+Apesaka boboto mpe nkembo.+Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.+
2 Mpo okolya mbuma ya mosala makasi ya mabɔkɔ na yo.+Okozala na esengo mpe makambo na yo ekotambola malamu.+