11 Asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango.+ Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango,+ mpo bato báyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.+
33 Ee bomɛngo+ ya Nzambe mpe bwanya+ na ye mpe boyebi+ na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te+ mpe banzela na ye ekoki koyebana te!