Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 16:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bafungoleli ngai monɔkɔ na bango polele,+

      Mpo na koyokisa ngai nsɔni, babɛti matama na ngai,

      Bayangani ebele mpo na kotɛmɛla ngai.+

  • Yobo 17:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Ya solo, bazali kosɛka ngai,+

      Mpe liso na ngai efandi na kati ya etamboli na bango ya botomboki.

  • Yobo 30:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “Mpe sikoyo basɛki ngai,+

      Baoyo naleki bango na mikolo,+

      Baoyo nalingaki koboya

      Kotya batata na bango esika moko na bambwa ya etonga na ngai.

  • Nzembo 22:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Baoyo nyonso bazali komona ngai, bazali kosɛka ngai;+

      Bazali se kofungola minɔkɔ na bango polele, bazali se koningisa mitó na bango:+

  • Baebre 11:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Ɛɛ, bamosusu bazwaki oyo ya bango komekama na ndenge basɛkaki bango mpe babɛtaki bango fimbo, kutu koleka oyo wana, bakangamaki na minyɔlɔlɔ+ mpe na bolɔkɔ.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto