Yoane 11:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Yesu alobaki na ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.+ Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi;+ Misala 26:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 “Mpo na nini bondimaka te ete Nzambe alamwisaka bakufi?+ 1 Bakorinti 15:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Nzokande soki Kristo azali kosakolama ete alamukaki uta na bakufi,+ ndenge nini bamosusu na kati na bino bazali koloba ete lisekwa ya bakufi ezali te?+ Emoniseli 20:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi+ oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+
25 Yesu alobaki na ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.+ Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi;+
12 Nzokande soki Kristo azali kosakolama ete alamukaki uta na bakufi,+ ndenge nini bamosusu na kati na bino bazali koloba ete lisekwa ya bakufi ezali te?+
13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi+ oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+