Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Mpe na bonene ya lokumu na yo okoki kobwaka na nse baoyo bazali kotɛmɛla yo;+

      Ozali kotinda nkanda na yo oyo ezali kopela lokola mɔtɔ, ezali kozikisa bango lokola matiti ya blé.+

  • Nzembo 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Kasi bato mabe bazali bongo te,

      Bazali lokola mposo ya blé oyo mopɛpɛ epupolaka.+

  • Nzembo 35:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Bákóma lokola mposo ya blé liboso ya mopɛpɛ,+

      Mpe anzelu ya Yehova abengana bango.+

  • Yisaya 17:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bituluku ya bato ya bikólo+ bakosala makɛlɛlɛ lokola makɛlɛlɛ ya mai ebele. Mpe Ye akopamela yango mpenza,+ mpe ekokima mpenza mosika mpe bakobengana yango lokola mposo ya blé ya bangomba na ntango ya mopɛpɛ mpe lokola ekumbaki oyo ezali kobalusa bansende na ntango ya mopɛpɛ ya makasi.+

  • Hosea 13:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yango wana, bakokóma lokola mapata ya ntɔngɔ+ mpe lokola mamwɛ oyo elimwaka na ntɔngɔ mpenza; lokola mposo ya blé ya kokauka oyo mopɛpɛ ememi uta na esika ya kotutatuta mbuma+ mpe lokola molinga oyo ezali kobima na lidusu ya nsamba.

  • Matai 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotuta mbuma, mpe akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko,+ kasi akotumba mposo na yango+ na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto