13 Osengeli mpenza kozongisela ye ndanga yango ntango moi ekolala,+ mpe asengeli kolala na elamba na ye,+ mpe asengeli kopambola+ yo; mpe yango ekozala likambo ya boyengebene oyo osali liboso ya Yehova Nzambe na yo.+
12 soki anyokoli moto ya mpasi mpe mobola;+ soki abɔtɔli biloko na makasi na ndenge ya moyibi,+ soki azongisi te eloko oyo epesamaki ndanga;+ mpe soki atomboli miso na ye epai ya bikeko ya bosɔtɔ,+ asali likambo moko oyo eyinamá.+