26 Ee mwana mwasi ya bato na ngai, kangá ngɔtɔ na loketo+ mpe omibalola na putulu ya mɔtɔ.+ Lelá ndenge balelaka mwana kaka moko ya mobali, kolela ya mawa;+ mpamba te mopunzi akobimela biso na pwasa.+
30 Mpe bakoyokisa mpenza mongongo na bango mpo na yo mpe bakoganga na koganga ya mawa.+ Mpe bakobwaka putulu na mitó na bango.+ Bakomibalola na putulu ya mɔtɔ.+
6 Ntango liloba yango ekómelaki mokonzi ya Ninive,+ atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alongolaki elamba na ye ya bokonzi mpe alataki ngɔtɔ mpe afandaki na putulu ya mɔtɔ.+
8 Mpe bálata ngɔtɔ, moto mpe nyama ya mboka; mpe bábelela Nzambe makasi mpe bábongwana+ moto na moto na nzela na ye ya mabe mpe na mobulu oyo ezali na mabɔkɔ na bango.