Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 talá! nakosala mpenza ndenge olobi.+ Talá! nakopesa yo mpenza motema ya bwanya mpe ya mayele,+ na ndenge ete liboso na yo moto moko te azalaki lokola yo, mpe nsima na yo, moto moko te akobima lokola yo.+

  • 1 Bakonzi 4:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe Nzambe akobaki kopesa Salomo bwanya+ mpe mayele+ mingi mpenza mpe motema ya bososoli mingi,+ lokola zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu.+

  • Yobo 35:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ye azali Moto oyo ateyaka+ biso koleka banyama ya mabele,+

      Mpe akómisaka biso na bwanya koleka ata bikelamu oyo epumbwaka na likoló.

  • Masese 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo Yehova ye moko apesaka bwanya;+ boyebi ná bososoli eutaka na monɔkɔ na ye.+

  • Mosakoli 2:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpo apesi moto oyo azali malamu na miso na ye+ bwanya ná boyebi ná esengo,+ kasi apesi mosumuki mosala ya koyanganisa mpe ya kosangisa kaka mpo na kopesa moto oyo azali malamu na miso ya Nzambe ya solo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+

  • Danyele 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe mpo na bana yango, bango minei, Nzambe ya solo apesaki bango boyebi, mayele ya kososola mikanda nyonso ná bwanya;+ mpe Danyele azalaki na mayele na bimonaneli ná bandɔtɔ ya ndenge nyonso.+

  • Matai 11:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na ntango yango Yesu azongisaki ete: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo kasi omonisi yango bana mike.+

  • Yakobo 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo soki moko na bino azangi bwanya,+ akoba kosɛnga Nzambe,+ mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te;+ mpe akopesa ye yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto