Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo mobola akosila ata moke te na mokili na yo.+ Yango wana nazali kopesa yo mitindo: ‘Osengeli kofungola lobɔkɔ na yo mpo na kokabela ndeko na yo oyo azali moto ya mpasi mpe mobola na mokili na yo.’+

  • Yobo 31:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Soki nazalaki koboyela bato oyo bazangá esengo na bango,+

      Mpe soki nalɛmbisaki miso ya mwasi oyo mobali akufá,+

  • Nzembo 112:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Akabi biloko mingi; apesi babola.+

      צ [Tsade]

      Boyengebene na ye ezali mpo na libela.+

      ק [Kof]

      Liseke na ye ekotombwama na nkembo.+

  • Masese 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ye oyo azali kotyola moninga na ye azali kosala lisumu,+ kasi esengo na ye oyo azali komonisela bato ya mpasi boboto.+

  • Masese 19:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova,+ mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.+

  • Mosakoli 11:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Pesá bato nsambo likabo, ata mpe bato mwambe,+ mpo oyebi te mpasi nini ekoyela mabele.+

  • 2 Timote 1:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nkolo ayokela ndako ya Onezifore+ mawa, mpo azalaki mbala na mbala kolendisa ngai,+ mpe ayokelaki minyɔlɔlɔ+ na ngai nsɔni te.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto