Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 42:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+

      Mpe mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+

      Zelá Nzambe,+

      Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai mpe azali Nzambe na ngai.+

  • Nzembo 44:maloba ya ebandeli ya loyembo-26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Maskile.

      44 Ee Nzambe, toyoki na matoi na biso,

      Bankɔkɔ na biso bayebisi biso+

      Mosala oyo osalaki na mikolo na bango,+

      Na mikolo ya kala.+

       2 Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+

      Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+

      Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+

       3 Mpo bazwaki mokili na mopanga na bango moko te,+

      Mpe lobɔkɔ na bango moko te nde ememelaki bango lobiko.+

      Kasi ezalaki lobɔkɔ na yo ya mobali ná lobɔkɔ na yo+ mpe pole ya elongi na yo,

      Mpamba te osepelaki na bango.+

       4 Ee Nzambe, yo moko ozali Mokonzi na ngai.+

      Pesá mitindo mpo na lobiko monene ya Yakobo.+

       5 Na lisalisi na yo tokotindika banguna na biso;+

      Na nkombo na yo tokonyata baoyo bazali kotɛlɛmɛla biso.+

       6 Mpo nazalaki kotyela litimbo na ngai motema te+

      Mpe mopanga na ngai nde ezalaki kobikisa ngai te.+

       7 Mpo obikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+

      Mpe baoyo bazali koyina biso makasi oyokisa bango nsɔni.+

       8 Tokopesa Nzambe masanzoli mokolo mobimba,+

      Mpe tokokumisa nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Sela.

       9 Kasi sikoyo obwaki biso mpe ozali kaka kosambwisa biso,+

      Mpe ozali kobima te elongo na mampinga na biso.+

      10 Ozali kaka kozongisa biso nsima liboso ya monguna,+

      Mpe bato oyo bazali koyina biso makasi bamipunzeli biloko.+

      11 Okabi biso lokola bampate, lokola eloko moko ya kolya,+

      Mpe opalanganisi biso na kati ya bikólo.+

      12 Otɛki bato na yo mpo na eloko oyo ezali na motuya te,+

      Mpe ntalo oyo otɛkaki bango epesi yo bomɛngo te.

      13 Okómisi biso eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+

      Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo nyonso bazali zingazinga na biso.+

      14 Okómisi biso liloba ya lisese na kati ya bikólo,+

      Koningisama ya motó na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+

      15 Mokolo mobimba kosambwa na ngai ezali liboso na ngai,

      Mpe nsɔni ya elongi na ngai ezipi ngai,+

      16 Mpo na mongongo ya moto oyo azali kotuka mpe azali koloba mabe,

      Mpo na monguna mpe moto oyo azali kozongisa mabe.+

      17 Nyonso wana nde ekómeli biso, mpe tobosani yo te,+

      Mpe na kondimana na yo,+ tosali makambo na bokosi te.

      18 Motema na biso ezongi nsima te na kozanga bosembo,+

      Mpe matambe na biso epɛngwi na nzela na yo te.+

      19 Mpo otuti biso na esika ya bambulú,+

      Mpe ozali kozipa biso na molili makasi.+

      20 Soki tobosani nkombo ya Nzambe na biso,

      To totandeli nzambe mopaya mabɔkɔ na biso,+

      21 Nzambe ye moko akolukaluka yango te?+

      Mpo ayebi basekele ya motema.+

      22 Kasi mpo na yo tobomami mokolo mobimba;

      Totalelami lokola bampate ya koboma.+

      23 Lamuká. Ee Yehova, mpo na nini ozali kaka kolala?+

      Lamuká. Kobwaka biso mpo na libela te.+

      24 Mpo na nini ozali kaka kobomba elongi na yo?

      Mpo na nini ozali kobosana mpasi na biso mpe monyoko na biso?+

      25 Mpo molimo na biso egumbami tii na putulu;+

      Libumu na biso ekangami na mabele.

      26 Tɛlɛmá mpo na kosunga biso+

      Mpe sikolá biso mpo na motema boboto na yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto