16 Mpe azalaki na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi mpe ya mino mibale+ ezalaki kobima na monɔkɔ na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi ntango ezali kongɛnga makasi mpenza.+
15 Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi ezali kobima na monɔkɔ na ye,+ mpo abɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende.+ Azali mpe konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo+ ya nkanda makasi ya Nzambe+ Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.