-
Nzembo 46:maloba ya ebandeli ya loyembo-11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora+ mpo na Bilenge basi. Loyembo.
2 Yango wana tokobanga te, ata soki mabele ezali kobongwana+
Mpe ata soki bangomba ezali kotengatenga na kati mpenza ya mbu monene;+
3 Ata soki mai na yango ezali yikiyiki, ezali kobimisa fulufulu,+
Ata soki bangomba ezali kolɛnga na yikiyiki na yango.+ Sela.
4 Ezali na ebale moko oyo mikɛli na yango esepelisaka engumba ya Nzambe,+
Tabernakle monene, oyo eleki bosantu, ya Oyo-Aleki-Likoló.+
5 Nzambe azali na katikati ya engumba yango;+ ekotengatenga te.+
Nzambe akosalisa yango ntango ntɔngɔ ekotana.+
6 Bikólo ekómaki yikiyiki,+ makonzi ekómaki kotengatenga;
Ayokisaki mongongo na ye, mabele ebandaki konyangwa.+
7 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+
Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela.
9 Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.+
Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga;+
Azali kotumba makalo na mɔtɔ.+
-