14 Liboso ya bato, na lobɔkɔ na yo, Ee Yehova,+
Liboso ya bato ya ntango oyo,+ baoyo likabo na bango ezali na bomoi oyo,+
Mpe baoyo otondisi libumu na bango na bomɛngo na yo oyo ebombani,+
Baoyo batondi na bana+
Mpe baoyo bazali kobombela bana na bango biloko na bango oyo etikali.+