Balevi 19:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 “‘Osengeli te kotambolatambola na kati ya bato na yo mpo na kokosela bato makambo.+ Osengeli te koluka kosopa makila ya moninga na yo.+ Ngai nazali Yehova. Nzembo 31:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Mbɛbu ya lokuta ezanga likambo ya koloba,+Oyo ezali kolobela moyengebene mabe,+ na lolendo mpe na kotyola kozanga komipekisa.+ Luka 22:65 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 65 Mpe bazalaki koloba makambo mosusu mingi mpo na kofinga+ ye.
16 “‘Osengeli te kotambolatambola na kati ya bato na yo mpo na kokosela bato makambo.+ Osengeli te koluka kosopa makila ya moninga na yo.+ Ngai nazali Yehova.
18 Mbɛbu ya lokuta ezanga likambo ya koloba,+Oyo ezali kolobela moyengebene mabe,+ na lolendo mpe na kotyola kozanga komipekisa.+