13 Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu,+ bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu+ koleka?”
9 Nzokande, bino bozali kolanda bamposa ya nzoto te, kasi elimo,+ soki elimo ya Nzambe ezali mpenza kofanda na kati na bino.+ Kasi soki moto azali na elimo ya Kristo+ te, moto yango azali moto na ye te.