-
Nzembo 88:maloba ya ebandeli ya loyembo-18Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Loyembo, mondule ya bana ya Kora. Epai ya mokambi ya nzembo ya Mahalate mpo na kopesa biyano. Maskile ya Hemane+ Moezera.
4 Natángami na kati ya baoyo bazali kokita na libulu;+
Nakómi lokola mobali makasi oyo azangi makasi,+
5 Oyo azwi bonsomi na kati ya bakufi,+
Lokola bato oyo babomami oyo bazali kolala na lilita,+
Baoyo ozali kokanisa lisusu te
Mpe baoyo balongolami na lobɔkɔ na yo oyo esalisaka.+
6 Otye ngai na kati ya libulu na bisika ya mozindo ya nse koleka,
Na kati ya bisika ya molili, na libulu monene ya mozindo.+
8 Otye bato oyo bayebani na ngai mosika na ngai;+
Otye ngai lokola eloko ya koyina mpenza na miso na bango.+
Nakangami na bolɔkɔ mpe nakoki kobima te.+
9 Liso na ngai elɛmbi mpo na mpasi na ngai.+
Ee Yehova, nabeleli yo mokolo mobimba;+
Natandeli yo mabɔkɔ na ngai.+
10 Okosalela nde bato oyo bakufá likamwisi?+
To baoyo bazangi makasi kati na liwa bakotɛlɛma,+
Bakokumisa yo?+ Sela.
12 Likamwisi na yo ekoyebana nde na kati ya molili,+
To boyengebene na yo na mokili ya bato oyo babosaná bango?+
13 Ee Yehova, mpe ata bongo epai na yo nazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi,+
Mpe na ntɔngɔ libondeli na ngai ezali kaka koya liboso na yo.+
14 Ee Yehova, mpo na nini ozali kobwaka molimo na ngai?+
Mpo na nini ozali kobombela ngai elongi na yo?+
15 Banda bomwana, nazali na mpasi mpe nazali pene na kokata motema;+
Nakangi motema mingi mpenza na makambo na yo ya nsɔmɔ.+
-