Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 16:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Kasi soki ezali nde eloko ya sika oyo Yehova akosala yango kosala,+ mpe mabele esengeli kofungola monɔkɔ na yango mpe komɛla bango+ mpe eloko nyonso ya bango mpe basengeli kokita na bomoi kati na Nkunda,*+ bokoyeba ya solo ete mibali oyo bazangi mpenza limemya epai ya Yehova.”+

  • 2 Samwele 17:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe Ahitofele amonaki ete balandi toli na ye te,+ bongo akangisaki kiti ya mpunda, atɛlɛmaki mpe akendaki na ndako na ye, na engumba+ na ye. Na nsima, apesaki mitindo na bato ya ndako+ na ye mpe amikangaki nsinga na nkingo+ mpe akufaki.+ Bongo bakundaki+ ye na lilita ya bankɔkɔ na ye.

  • 2 Samwele 18:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Na yango, Yoabe alobaki ete: “Nalekisa ntango na ngai liboso na yo te!” Bongo azwaki mbanzi misato na lobɔkɔ na ye mpe atubaki+ yango Abisalome na motema, wana azalaki naino na bomoi na katikati+ ya nzete yango ya monene.

  • Matai 27:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo abwakaki shekele yango ya palata na tempelo mpe alongwaki, akei komitya nsinga na nkingo.+

  • Misala 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 (Na bongo, mobali yango mpenza asombaki+ elanga na lifuti ya kozanga boyengebene,+ mpe lokola akweaki motó liboso,+ apasukaki katikati pwaa mpe misɔpɔ na ye nyonso esopanaki.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto