Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpo na nini apesaka pole na moto oyo azali komona mpasi,

      Mpe bomoi na baoyo molimo na bango ekómi bololo?+

  • Yobo 33:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpo na kozongisa molimo na ye ekende na libulu te,+

      Mpo angɛngisama na pole ya bato oyo bazali na bomoi.+

  • Nzembo 116:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Nakotambola+ liboso ya Yehova na mikili ya baoyo bazali na bomoi.+

  • Nzembo 57:maloba ya ebandeli ya loyembo-11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame. Ntango akimaki Saulo, akɔti na mobenga.+

      57 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, moniselá ngai boboto,+

      Mpo molimo na ngai ekimi epai na yo;+

      Mpe nazali kokima na elili ya mapapu na yo kino mikakatano ekoleka.+

       2 Nazali kobenga Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Nzambe ya solo oyo azali kosukisela ngai mikakatano.+

       3 Akotinda lisalisi uta na likoló mpe akobikisa ngai.+

      Akobulunganisa mpenza moto oyo azali koswa ngai.+ Sela.

      Nzambe akotinda motema boboto na ye mpe bosolo na ye.+

       4 Molimo na ngai ezali na katikati ya bankɔsi;+

      Nazali na likambo mosusu ya kosala te kaka kolala na kati ya bato oyo badundaka, ɛɛ bana ya bato,

      Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula,+

      Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+

       5 Ee okumisama kuna na likoló, Ee Nzambe;+

      Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+

       6 Babongiseli makolo na ngai monyama;+

      Molimo na ngai egumbami.+

      Batimolaki liboso na ngai libulu ya motambo;

      Bakwei na kati.+ Sela.

       7 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te,+

      Motema na ngai ezali kotengatenga te.

      Nakoyemba mpe nakobɛta mondule.+

       8 Ee nkembo na ngai,+ lamuká;

      Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; Ee nzɛnzɛ, ná yo mpe.+

      Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.

       9 Ee Yehova, nakokumisa yo na kati ya bato ya bikólo;+

      Nakobɛtɛla yo mondule na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+

      10 Mpo motema boboto na yo ezali monene kino na likoló,+

      Mpe bosolo na yo kino na mapata.+

      11 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;+

      Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto