33 Nsima na yango, babalukaki mpe bamataki na nzela ya Bashane.+ Bongo Oge+ mokonzi ya Bashane abimaki mpo na kokutana na bango, ye ná bato na ye nyonso, na etumba ya Edrei.+
14 Kambá bato na yo na lingenda na yo,+ etonga ya libula na yo, oyo ezalaki kofanda yango moko kati na zamba—na katikati ya elanga ya banzete ya mbuma.+ Bálya na Bashane mpe na Gileade+ lokola na mikolo ya ntango ya kalakala.+