-
Nzembo 74:maloba ya ebandeli ya loyembo-23Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Maskile. Ya Asafe.+
74 Ee Nzambe, mpo na nini obwaki mpo na seko?+
Mpo na nini nkanda na yo ezali kaka kopelela etonga ya esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti?+
2 Kanisá liyangani na yo oyo ozwaki banda kala,+
Libota oyo osikolaki mpo ezala libula na yo,+
Ngomba Siona epai ofandaki.+
3 Kende na bisika ya libebi oyo ezali koumela ntango molai.+
Monguna abebisi eloko nyonso na esika mosantu.+
4 Baoyo bazali banguna na yo bagangi na katikati ya esika na yo ya kokutana.+
Batɛlɛmisi bilembo+ na bango moko.
5 Ayebani ete azali lokola moto oyo atombolaka basóka mpo na kokata mwa banzete ya zamba.
6 Mpe sikoyo, na basóka ya mike mpe na mabaya oyo batyá bibende na nsɔngɛ, bazali kutu kobuka mayemi nyonso ya esika mosantu.+
7 Babwaki esika na yo mosantu na mɔtɔ.+
Bakómisi tabernakle ya nkombo na yo eloko mpamba tii na mabele.+
8 Bango, ɛɛ bana na bango, balobi bango nyonso na motema na bango ete:
“Na mokili, bakotumba bisika nyonso ya kokutana ya Nzambe.”+
9 Tomoni bilembo na biso te; mosakoli ata moko azali lisusu te,+
Mpe moto ata moko te kati na biso ayebi soki ezali ntango boni.
10 Ee Nzambe, kino ntango nini monguna akokoba kosambwisa?+
Monguna akozanga limemya na nkombo na yo mpo na seko?+
11 Mpo na nini ozali kaka kolongola lobɔkɔ na yo, ɛɛ lobɔkɔ na yo ya mobali+
Na katikati ya ntolo na yo mpo na kosukisa biso?
12 Mpe ata bongo, Nzambe azali Mokonzi na ngai banda kalakala,+
Ye oyo apesaka lobiko monene na katikati ya mabele.+
14 Yo moko ozalaki kobukabuka mitó ya Leviatana.+
Opesaki yango ezala bilei ya bato, ya baoyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai.+
15 Yo nde okabolaki liziba mpe mokɛli;+
Yo moko nde okaukisaki bibale oyo mai etíyolaka ntango nyonso.+
17 Yo nde otyaki bandelo nyonso ya mabele;+
Eleko ya molunge ná eleko ya mpiɔ—yo moko osalaki yango.+
18 Ee Yehova, kanisá likambo oyo: Monguna asambwisi,+
Mpe bato ya bozoba bazangi limemya na nkombo na yo.+
19 Kopesa nyama ya zamba molimo ya epopo+ na yo te.
Kobosana bomoi ya bato na yo ya mpasi mpo na seko te.+
-