9 “Kaka nde kebá mpe batelá molimo+ na yo, ete obosana te makambo oyo miso na yo emoni+ mpe yango elongwa na motema na yo te mikolo nyonso ya bomoi na yo;+ mpe osengeli koyebisa yango bana na yo mpe bana ya bana na yo,+
7 mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana+ na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala+ mpe ntango okolamuka.