Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 89:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Esengo na bato oyo bazali koganga na esengo.+

      Ee Yehova, na pole ya elongi na yo bazali kaka kotambola.+

  • Nzembo 81:maloba ya ebandeli ya loyembo-16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na Gitite.+ Ya Asafe.

      81 Ee bóganga na esengo mpo na Nzambe, makasi na biso;+

      Bóganga na koganga ya bolongi mpo na Nzambe ya Yakobo.+

       2 Bóbɛta mondule+ mpe bózwa mbonda moke,+

      Nzɛnzɛ ya kosepelisa ná ebɛtɛlo ya nsinga.+

       3 Na sanza ya sika, bóyula liseke;+

      Na ntango sanza ezali mobimba, mpo na mokolo ya fɛti na biso.+

       4 Mpo ezali lilako mpo na Yisraele,+

      Ekateli ya lisambisi ya Nzambe ya Yakobo.

       5 Atyaki yango likoló ya Yozefe lokola eloko ya kokanisa,+

      Ntango azalaki kotambola na mokili ya Ezipito.+

      Nayokaki monɔkɔ oyo nayebi te.+

       6 “Nalongolaki kilo na lipeka na ye;+

      Kitunga elongolamaki na mabɔkɔ na ye.+

       7 Na ntango ya mpasi obengaki, mpe nabikisaki yo;+

      Nayanolaki yo na esika ya kobombana ya nkake.+

      Natalatalaki yo na mai ya Meriba.+ Sela.

       8 Ee ekólo na ngai, yoká mpe nakotatwela yo,+

      Ee Yisraele, soki okoyoka ngai.+

       9 Epai na yo nzambe mopaya akozala te;+

      Mpe okogumbamela nzambe mopaya te.+

      10 Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo,+

      Ye oyo azali kobimisa yo na mokili ya Ezipito.+

      Fungolá monɔkɔ na yo polele, mpe nakotondisa yango.+

      11 Kasi bato na ngai bayoki mongongo na ngai te;+

      Mpe Yisraele esepeli na ngai ata moke te.+

      12 Bongo natikaki bango bátambola na motó makasi na bango;+

      Bazalaki kotambola na batoli na bango moko.+

      13 Ee soki bato na ngai báyokelaka ngai,+

      Ee soki Yisraele etambolaka na banzela na ngai mpenza!+

      14 Mbɛlɛ natyaki banguna na bango na nse na bango kozanga nkaka,+

      Mpe mbɛlɛ nabalolelaki banguna na bango lobɔkɔ na ngai.+

      15 Baoyo bayinaka Yehova makasi, bakoya kogumbamela ye na kobanga,+

      Mpe ntango na bango ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te.

      16 Mpe akokoba koleisa ye mafuta ya blé,+

      Mpe nakotondisa yo na mafuta ya nzoi oyo euti na libanga.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto