Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Sɛngá ngai,+ napesa yo bikólo mpo ezala libula na yo+

      Mpe mabele tii na bansuka na yango ezala ya yo.+

  • Emoniseli 11:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe anzelu ya nsambo ayulaki kelelo na ye.+ Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso+ mpe ya Kristo na ye,+ mpe akoyangela libela na libela.”+

  • Nzembo 83:maloba ya ebandeli ya loyembo-18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Loyembo. Mondule ya Asafe.+

      83 Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te;+

      Kozanga liloba ya koloba te, mpe kofanda kimya te, Ee Nzambe.+

       2 Mpo, talá banguna na yo bazali na yikiyiki;+

      Mpe bato oyo bazali koyina yo makasi batomboli motó na bango.+

       3 Bazali kokoba kosalela bato na yo masolo ya nkuku+ na mayele mabe;

      Mpe bazali kosala likita mpo na bato oyo yo obombi.+

       4 Balobi ete: “Bóya mpe tósilisa bango bázala ekólo lisusu te,+

      Mpo nkombo ya Yisraele ekanisama lisusu te.”+

       5 Mpo bango nyonso elongo bapesani toli na motema moko;+

      Basali kutu kondimana mpo na kotɛmɛla yo,+

       6 Bahema ya Edome+ mpe Bayishimaele, Moabe+ ná Bahagri,+

       7 Gebale, Amone+ ná Amaleke,

      Filistia+ ná bato oyo bafandi na Tire.+

       8 Lisusu, Asiri esangani na bango;+

      Bakómi lobɔkɔ ya bana ya Lota.+ Sela.

       9 Salá bango lokola Midiane,+ lokola Sisera,+

      Lokola Yabine+ na lobwaku ya mokɛli ya Kishone.+

      10 Basilaki nyɛɛ na Ene-dore;+

      Bakómaki nyɛi na mabele.+

      11 Nde bato na bango ya lokumu, kómisá bango lokola Orebe mpe lokola Zeebe,+

      Mpe bankumu na bango nyonso lokola Zeba mpe lokola Zalamuna,+

      12 Baoyo balobi ete: “Tózwa bisika ya kofanda ya Nzambe ekóma ya biso.”+

      13 Ee Nzambe na ngai, kómisá bango lokola ekumbaki oyo ezali kobalola nsende,+

      Lokola matiti ya blé na mopɛpɛ.+

      14 Lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa zamba+

      Mpe lokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa bangomba,+

      15 Landá bango ndenge wana na mopɛpɛ makasi na yo+

      Mpe bulunganisá bango na ekumbaki na yo.+

      16 Tondisá bilongi na bango na nsɔni,+

      Mpo bato báluka nkombo na yo, Ee Yehova.+

      17 Ee báyoka nsɔni mpe bábulungana libela,+

      Mpe bábulungana mpe bákufa;+

      18 Mpo báyeba+ ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+

      Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló+ na mabele mobimba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto