25 Ekoki kokanisama ata moke te mpo na yo ete osala ndenge wana: oboma moyengebene elongo na moto mabe, bongo ekómela moyengebene ndenge ekómelaka moto mabe!+ Ekoki kokanisama bongo ata moke te mpo na yo.+ Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?”+
31 Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa+ na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi+ ye uta na bakufi.”
4 Yo nani mpo osambisa mosali ya ndako ya moto mosusu?+ Nkolo na ye moko nde atɛlɛmisaka ye to akweisaka ye.+ Ɛɛ, akotɛlɛma, mpo Yehova akoki kotɛlɛmisa ye.+