Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 21:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe bófandisa mibali mibale,+ bato ya mpambampamba,+ mpe bótika bango bápesa litatoli mpo na kofunda ye+ ete: ‘Olakeli Nzambe ná mokonzi mabe!’+ Bongo bóbimisa ye mpe bóbamba ye mabanga akufa.”+

  • Nzembo 58:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Kutu, na motema na bino bozali nde kosala makambo ya kozanga boyengebene na mabele,+

      Mpe bozali kobongisa nzela mpo na mobulu mpenza ya mabɔkɔ na bino!+

  • Yisaya 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mawa na baoyo bazali kobimisa malako ya kopesa mpasi+ mpe na baoyo, awa bazali kokoma ntango nyonso, bazali kokoma makambo oyo ezali kopesa bato mpasi mpenza,

  • Danyele 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 ete ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ bókwea mpe bósambela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisi.

  • Danyele 6:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bankumu minene nyonso ya bokonzi, bakomisɛrɛ ná basatrape, basaleli minene ya mokonzi ná baguvɛrnɛrɛ, basali likita mpo bátya mobeko moko ya bokonzi+ mpe básala ete bato bátosa epekiseli oyo elobi ete na boumeli ya mikolo ntuku misato (30), moto nyonso oyo akosala lilɔmbɔ epai ya nzambe mosusu to moto mosusu, kasi epai na yo te, Ee mokonzi, asengeli kobwakama na libulu ya bankɔsi.+

  • Misala 5:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 mpe alobaki ete: “Topesaki bino mitindo+ polelepolele ete bókoba koteya na nkombo wana te, kasi, talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino,+ mpe bozali na mokano mpenza ya koyeisa makila+ ya moto wana likoló na biso.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto