1 Samwele 26:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Bongo Davidi alobaki lisusu boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ Yehova ye moko akobɛta ye;+ to mokolo na ye ekoya+ mpe akokufa, to akokende na etumba+ mpe akobomama mpenza.+ Nzembo 7:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Asali libulu, mpe atimoli yango;+Kasi akokwea na libulu yango oyo asalaki.+ Masese 26:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Ye oyo azali kotimola libulu akokwea na kati na yango,+ mpe ye oyo azali kobalola libanga—yango ekozongela ye.+
10 Bongo Davidi alobaki lisusu boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ Yehova ye moko akobɛta ye;+ to mokolo na ye ekoya+ mpe akokufa, to akokende na etumba+ mpe akobomama mpenza.+
27 Ye oyo azali kotimola libulu akokwea na kati na yango,+ mpe ye oyo azali kobalola libanga—yango ekozongela ye.+