25 “Soki odefisi bato na ngai mbongo, moto ya mpasi oyo azali elongo na yo,+ osengeli te kokóma lokola modefisi oyo azali kosɛnga ye benefisi na lokoso. Bosengeli kosɛnga ye benefisi te.+
36 Kozwa epai na ye benefisi te mpe benefisi ya lokoso te,+ kasi osengeli kobanga Nzambe na yo;+ mpe ndeko na yo asengeli kotikala na bomoi elongo na yo.
19 “Osengeli te kosɛnga ndeko na yo afuta na benefisi,+ benefisi mpo na mbongo, benefisi mpo na bilei,+ benefisi mpo na eloko nyonso oyo moto akoki kosɛnga benefisi.
17 soki apekisi lobɔkɔ na ye konyokola moto ya mpasi; soki azwi benefisi ya lokoso+ te mpe benefisi+ te; soki akokisi bikateli na ngai ya lisambisi;+ mpe soki atamboli na mibeko na ngai;+ ye akokufa te mpo na libunga ya tata na ye.+ Akotikala mpenza na bomoi.+