Ebandeli 8:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpe mai ezalaki kokita mokemoke tii na sanza ya zomi. Na sanza ya zomi, na mokolo ya liboso ya sanza yango, nsɔngɛ ya bangomba emonanaki.+ Masese 8:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Liboso bangomba etyama,+ liboso ya bangomba mike, nabotamaki lokola nde na mpasi ya kobota,
5 Mpe mai ezalaki kokita mokemoke tii na sanza ya zomi. Na sanza ya zomi, na mokolo ya liboso ya sanza yango, nsɔngɛ ya bangomba emonanaki.+