Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe Nzambe alobaki lisusu ete: “Talá napesi bino milona nyonso oyo ebotaka mboto, oyo ezali na mabele mobimba mpe nzete nyonso oyo ezali na mbuma oyo ebotaka mboto.+ Tiká yango ezala bilei na bino.+

  • Ebandeli 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe yango ekobimisela yo banzubɛ mpe matiti ya nsendensende,+ mpe osengeli kolya milona ya mokili.

  • Ebandeli 9:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nyama nyonso oyo etambolaka oyo ezali na bomoi ekoki kozala bilei na bino.+ Ndenge napesaki bino milona, napesi bino yango nyonso.+

  • Yobo 38:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo na kotondisa bisika oyo ebɛtami na mopɛpɛ makasi mpe oyo etikali mpamba

      Mpe mpo na kokolisa matiti oyo ezali kobima?+

  • Baebre 6:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na ndakisa, mabele oyo emɛlaka mai ya mbula oyo enɔkelaka yango mbala na mbala, mpe oyo na nsima ebotaka ndunda oyo ekolyama na bato oyo balonelaki yango,+ ezwaka mpe lipamboli ya Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto