Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 4:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Moize mpe alobaki ete: “Arona Molevi azali ndeko na yo te?+ Nayebi malamu ete ye akoki mpenza koloba. Mpe lisusu, talá ye wana azali koya na nzela mpo na kokutana na yo. Ntango akomona yo, akosepela mpenza na motema na ye.+

  • Kobima 7:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Talá, nakómisi yo Nzambe liboso ya Farao,+ mpe Arona ndeko na yo mpenza akokóma mosakoli na yo.+

  • Kobima 28:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “Mpe yo, zwá Arona ndeko na yo mpe bana na ye ya mibali elongo na ye na kati ya bana ya Yisraele mpe bɛlɛmisá bango na yo mpo básalela ngai mosala ya nganga-nzambe:+ Arona,+ Nadabe ná Abihu,+ Eleazare ná Itamare,+ bana mibali ya Arona.

  • Mitángo 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe talá oyo ekosalema: moto oyo nakopona,+ lingenda na ye ekobimisa nkasa ya sika, mpe nakosukisa mpenza koimaima+ ya bana ya Yisraele oyo bazali koimaima mpo na ngai, koimaima oyo bazali koimaima mpo na bino.”+

  • 1 Samwele 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Samwele alobaki lisusu na bato boye: “Yehova azali motatoli, ye oyo asalelaki Moize ná Arona mpe ye oyo abimisaki bankɔkɔ na bino na mokili ya Ezipito.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto