Kobima 10:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Na mbala moko Moize asembolaki lingenda na ye likoló ya mokili ya Ezipito, mpe Yehova asalaki ete mopɛpɛ ya ɛsti+ epɛpa likoló ya mokili na moi wana mobimba mpe na butu wana mobimba. Ntɔngɔ eyaki mpe mopɛpɛ ya ɛsti eyaki na mayoyo. Kolimbola Mibeko 28:38 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 38 “Okomema milona mingi na elanga, kasi okobuka moke,+ mpamba te liyoyo ekolya yango.+ Nzembo 78:46 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 46 Mpe akabelaki bampɛsɛ mbuma na bango,Mpe mayoyo, mosala na bango ya makasi.+
13 Na mbala moko Moize asembolaki lingenda na ye likoló ya mokili ya Ezipito, mpe Yehova asalaki ete mopɛpɛ ya ɛsti+ epɛpa likoló ya mokili na moi wana mobimba mpe na butu wana mobimba. Ntɔngɔ eyaki mpe mopɛpɛ ya ɛsti eyaki na mayoyo.