Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 25:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo Yisraele akanganaki na Baala ya Peore;+ mpe nkanda ya Yehova ebandaki kongalela Yisraele.+

  • Mitángo 31:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Talá! Bango nde bato oyo basalelamaki, na liloba ya Balaama, mpo na kobenda bana ya Yisraele mpo bázanga bosembo+ epai ya Yehova na likambo ya Peore,+ bongo bolɔzi ekwelaki liyangani ya Yehova.+

  • Kolimbola Mibeko 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Miso na bino moko nde emonaki oyo Yehova asalaki na likambo ya Baala ya Peore,+ ete mobali nyonso oyo alandaki Baala ya Peore ye nde Yehova Nzambe na yo abomaki epai na yo.+

  • Kolimbola Mibeko 32:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bazalaki kopesa bademo bambeka, kasi Nzambe te,+

      Banzambe oyo bango bayebaki te,+

      Banzambe ya sika oyo bayaki sika,+

      Oyo bankɔkɔ na bino bayebaki te.

  • Hosea 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Nakutaki Yisraele lokola mbuma ya vinyo na kati ya esobe.+ Namonaki bankɔkɔ na bino lokola mbuma ya figi ya liboso mpenza na nzete ya figi na ebandeli na yango.+ Bakendaki epai ya Baala ya Peore,+ mpe babandaki komipesa na eloko ya nsɔni,+ mpe bakómaki bosɔtɔ lokola eloko ya bolingo na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto