Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 20:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nsima na yango, Moize ná Arona babengisaki lisangá liboso ya libanga yango, mpe alobaki na bango ete: “Bóyoka, sikoyo, bino batomboki!+ Tóbimisela bino mai na libanga oyo?”+

  • Yobo 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Yobo alobaki na ye: “Yo mpe ozali koloba lokola mwasi moko ya zoba.+ Tokondima kaka makambo ya malamu oyo euti na Nzambe ya solo, bongo tokondima mpe oyo ezali mabe te?+” Na nyonso wana, Yobo asalaki lisumu te na mbɛbu na ye.+

  • Nzembo 141:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Ee Yehova, tyelá monɔkɔ na ngai mokɛngɛli;+

      Tyá sinzili na porte ya mbɛbu na ngai.+

  • Masese 16:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya,+ mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.+

  • Yakobo 3:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpo biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.+ Soki moto abɛtaka libaku na maloba te,+ ye azali moto ya kokoka,+ oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto