Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 21:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Salá elilingi ya nyoka ya ngɛngɛ mpe tyá yango likoló ya likonzí ya elembo. Mpe ekosalema mpenza boye: ntango moto aswami, asengeli kotala yango mpe akotikala na bomoi.”+

  • 2 Bakonzi 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Zongá, mpe osengeli koloba na Hizikiya mokambi+ ya bato na ngai boye: ‘Talá oyo Yehova Nzambe+ ya nkɔkɔ na yo Davidi alobi: “Nayoki+ libondeli+ na yo. Namoni mpisoli+ na yo. Talá, nazali kobikisa yo.+ Na mokolo ya misato, okomata na ndako ya Yehova.+

  • Nzembo 30:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Ee Yehova Nzambe na ngai, nalelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi, mpe obikisaki ngai.+

  • Nzembo 103:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Ye moto azali kolimbisa libunga na yo mobimba,+

      Ye moto azali kobikisa yo na minyoko* na yo nyonso,+

  • Nzembo 147:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Abikisaka+ baoyo bazoki na motema,+

      Mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto