2 Samwele 15:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Lisusu, ntango apesaki bambeka, Abisalome atindaki bázwa Ahitofele+ moto ya Gilo,+ mopesi-toli ya Davidi,+ na engumba na ye Gilo.+ Bongo likita+ yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato bazalaki se kobakisama+ epai ya Abisalome. Nzembo 35:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpo kaka mpamba babombi libulu na bango oyo batyeli ngai monyama;+Kaka mpamba batimoli yango mpo na molimo na ngai.+ Nzembo 69:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi kutu mingi koleka nsuki ya motó na ngai.+Baoyo bazali kokanga ngai monɔkɔ, baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba, bakómi ebele.+Bongo eloko oyo nayibaki te, nazalaki kozongisa yango. Yoane 15:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Kasi ezali mpo liloba oyo ekomamá na Mibeko na bango ekokisama ete: ‘Bayinaki ngai kaka mpamba.’+
12 Lisusu, ntango apesaki bambeka, Abisalome atindaki bázwa Ahitofele+ moto ya Gilo,+ mopesi-toli ya Davidi,+ na engumba na ye Gilo.+ Bongo likita+ yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato bazalaki se kobakisama+ epai ya Abisalome.
7 Mpo kaka mpamba babombi libulu na bango oyo batyeli ngai monyama;+Kaka mpamba batimoli yango mpo na molimo na ngai.+
4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi kutu mingi koleka nsuki ya motó na ngai.+Baoyo bazali kokanga ngai monɔkɔ, baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba, bakómi ebele.+Bongo eloko oyo nayibaki te, nazalaki kozongisa yango.