Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Azali kosala makambo minene oyo ekoki kososolama te,+

      Mpe makambo ya kokamwa oyo ekoki kotángama te.+

  • Yobo 42:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 “Nayebi sikoyo ete okoki kosala makambo nyonso,+

      Mpe mpo na yo, likanisi moko ezali te oyo ekozanga kokokisama.+

  • Nzembo 92:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza minene!+

      Makanisi na yo ezali mozindo mingi.+

  • Nzembo 98:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 98 Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+

      Mpo asali makambo ya kokamwa.+

      Lobɔkɔ na ye ya mobali, ɛɛ lobɔkɔ na ye mosantu, epesi ye lobiko.+

  • Nzembo 104:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele!+

      Osalá yango nyonso na bwanya.+

      Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.+

  • Nzembo 139:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.+

      Misala na yo ezali ya kokamwa,+

      Mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.+

  • Yisaya 40:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nani ameká mai na lobɔkɔ na ye,+ mpe ameká bonene ya likoló na zerete+ mpe asangisá putulu ya mabele na emekeli moko,+ to ameká bozito ya bangomba na kilo, mpe ameká bozito ya bangomba mike na bimekeli-kilo?

  • Emoniseli 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe bazali koyemba loyembo ya Moize+ moombo ya Nzambe mpe loyembo ya Mwana-Mpate,+ balobi:

      “Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa.+ Mokonzi ya seko,+ banzela na yo ezali boyengebene mpe solo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto