Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 8:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 yo yoká kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela,+ mpe salá na kolanda nyonso oyo mopaya yango akobelela yo mpo na yango;+ mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba nkombo+ na yo mpo bábanga yo ndenge bato na yo Yisraele babangaka yo, mpe báyeba ete ndako oyo natongi ebengami na nkombo na yo.+

  • Nzembo 11:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+

      Yehova​—kiti na ye ya bokonzi ezali na likoló.+

      Miso na ye ezali kotala, miso na ye ya kongɛnga ezali kotalatala+ bana ya bato.

  • Yisaya 57:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpo talá oyo Moto oyo azali likoló mpe Moto oyo atombwani,+ oyo afandi mpo na libela+ mpe oyo nkombo na ye ezali mosantu,+ alobi: “Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu,+ mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa,+ mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.+

  • Baebre 9:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpo Kristo akɔtaki, na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto