Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe bazalaki koboya malako na ye mpe kondimana+ na ye oyo asalaki ná bankɔkɔ na bango mpe makundoli+ na ye oyo akebisaki bango na yango, mpe bakómaki kolanda bikeko ya mpamba+ mpe bango moko bakómaki mpamba,+ ɛɛ, mpo bamekolaki bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, oyo mpo na yango Yehova apesaki bango mitindo ete básala lokola bango te;+

  • 1 Ntango 28:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Mpe yo, mwana na ngai Salomo, yebá+ Nzambe ya tata na yo mpe salelá+ ye na motema mobimba+ mpe na molimo ya esengo;+ mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso,+ mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.+ Soki oluki ye, akosala ete omona ye;+ kasi soki otiki ye,+ akobwaka yo mpo na libela.+

  • Nzembo 95:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mbula ntuku minei (40) nayokaki libota yango mpii,+

      Bongo nalobaki ete:

      “Bazali bato oyo motema na bango ezali kowayawaya,+

      Mpe bayebi banzela na ngai te”;+

  • Bileli 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bato na ngai nyonso ya nguya, Yehova abwaki bango mosika na ngai.+

      Abengiseli ngai likita, mpo na kobukabuka bilenge na ngai ya mibali.+

      Yehova anyatinyati ekamwelo ya vinyo+ ya ngɔndɔ, mwana mwasi ya Yuda.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto