Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe esalemaki boye: ntango kaka banguna na biso+ nyonso bayokaki yango mpe bikólo nyonso oyo ezalaki zingazinga na biso bamonaki yango, na mbala moko bamonaki ete bakiti mpenza kokita, mpe bayebaki ete mosala yango esalamaki nde na lisalisi ya Nzambe+ na biso.

  • Estere 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe Hamane ayebisaki Zereshe+ mwasi na ye mpe baninga na ye nyonso, makambo nyonso oyo ekwelaki ye. Bongo bato na ye ya bwanya+ mpe Zereshe mwasi na ye balobaki na ye ete: “Soki Mordekai, oyo yo obandi kokwea liboso na ye, auti na momboto ya Bayuda, okolonga ye te, kasi okokwea mpenza liboso na ye.”+

  • Estere 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Bayuda babɛtaki banguna na bango nyonso mpe babomaki bango na mopanga+ mpe babomaki bango na ndenge moko ya nsɔmɔ mpe basilisaki bango nyɛɛ, mpe basalaki bato oyo bazalaki koyina bango ndenge balingi.+

  • Yisaya 37:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpamba te kosilika oyo ozali kosilikela ngai+ mpe koganga na yo emati tii na matoi na ngai.+

      Mpe nakotya mpenza ndɔbɔ na ngai na zolo na yo mpe ebende na ngai ya mbanga kati na mbɛbu na yo,+

      Mpe nakozongisa yo mpenza na nzela oyo oyei.”+

  • Zekaria 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe ekosalema boye na mokolo yango:+ nakokómisa Yerusaleme libanga ya kilo+ mpo na bato ya bikólo nyonso. Baoyo nyonso bakotombola yango bakozoka makasi mpenza; mpe bikólo nyonso ya mabele ekoyangana mpenza mpo na kotɛmɛla yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto