Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 19:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe bato na yango bakolɛmba mabɔkɔ;+

      Bakoyoka mpenza nsɔmɔ mpe bakozala na nsɔni.+

      Bakokóma mpenza lokola matiti ya esobe mpe lokola matiti ya mobesu ya pɛtɛpɛtɛ,+

      Lokola matiti oyo ebimaka na nsamba,+ ntango yango ekauki na mopɛpɛ ya ɛsti.+

  • Nehemia 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Yoká,+ Ee Nzambe na biso, mpo tokómi eloko ya kotyola;+ mpe salá ete nsɔni+ na bango ezonga na mitó na bango moko, mpe kabá bango bápunzama na mokili ya bokangami.

  • Nzembo 37:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Mpo bakokauka nokinoki lokola matiti,+

      Mpe bakokauka lokola matiti ya sika ya mobesu.+

  • Nzembo 92:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti+

      Mpe bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazali kokola,

      Ezali mpo básila nyɛɛ libela.+

  • Yisaya 37:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe bato na yango bakolɛmba mabɔkɔ;+

      Bakoyoka mpenza nsɔmɔ mpe nsɔni.+

      Bakokóma mpenza lokola matiti ya esobe mpe lokola matiti ya mobesu ya pɛtɛpɛtɛ,+

      Matiti oyo ebimaka na nsamba+ mpe matiti ya mikala ya bilanga liboso ya mopɛpɛ ya ɛsti.+

  • Yirimia 17:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo ezali yango moko na mokili patatalu oyo ekauká mpe akomona te ntango bolamu ekoya;+ kasi asengeli kofanda na bisika ekauká kati na esobe, na mokili ya mungwa epai bato bafandi te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto