18 Na yango, Nzambe asalaki ete bato bábaluka na nzela ya esobe ya Mbu Motane.+ Kasi ezalaki na bituluku ya etumba nde bana ya Yisraele babimaki na mokili ya Ezipito.+
2 Mpe osengeli kokanisa nzela nyonso oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula ntuku minei (40) oyo, na esobe,+ mpo na koteya yo komikitisa,+ komeka+ yo mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te.
15 oyo atambwisaki yo na esobe wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,+ oyo ezali na banyoka ya ngɛngɛ+ ná bankotó mpe na mabele ekauká oyo ezali na mai te; oyo abimiselaki yo mai na libanga ya silekise;+