Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Estere 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe bakakisaki Hamane na nzete+ oyo abongiselaki Mordekai;+ mpe nkanda ya mokonzi ekitaki.

  • Nzembo 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Asali libulu, mpe atimoli yango;+

      Kasi akokwea na libulu yango oyo asalaki.+

  • Nzembo 9:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bato ya bikólo bazindi na libulu oyo basali;+

      Lokolo na bango ekangami+ na monyama+ oyo babombaki.

  • Nzembo 35:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Libebi ekwela ye kozanga ete ayeba,+

      Mpe monyama na ye moko oyo abombaki ekanga ye;+

      Akwea na kati na yango mpe akufa.+

  • Nzembo 37:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mopanga na bango ekokɔta na motema na bango,+

      Mpe matimbo na bango ekobukana.+

  • Nzembo 57:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Babongiseli makolo na ngai monyama;+

      Molimo na ngai egumbami.+

      Batimolaki liboso na ngai libulu ya motambo;

      Bakwei na kati.+ Sela.

  • Nzembo 142:maloba ya ebandeli ya loyembo-7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Maskile. Ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+ Libondeli.

      142 Na mongongo na ngai, nabelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+

      Na mongongo na ngai, nabandaki kobelela Yehova mpo amonisela ngai boboto.+

       2 Nazalaki kosopa motungisi na ngai liboso na ye;+

      Nakobaki koyebisa ye mpasi na ngai,+

       3 Ntango elimo+ na ngai elɛmbaki makasi na kati na ngai.

      Bongo yo moko oyebaki nzela na ngai.+

      Na nzela oyo nazali kotambola+

      Babombeli ngai motambo.+

       4 Talá na lobɔkɔ ya mobali mpe moná

      Ete moto moko te azali kondima ete ayebi ngai lisusu.+

      Esika na ngai ya kokima elimwe liboso na ngai;+

      Moto moko te azali kotuna makambo ya molimo na ngai.+

       5 Ee Yehova, nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+

      Nalobaki ete: “Ozali ekimelo na ngai,+

      Likabo+ na ngai na mokili ya bato ya bomoi.”+

       6 Tyá likebi na kosɛngasɛnga na ngai ya kolela,+

      Mpo nakómi mobola mpenza.+

      Bikisá ngai na banyokoli na ngai,+

      Mpo bazali makasi mingi koleka ngai.+

       7 Bimisá molimo na ngai na kasho+

      Mpo nakumisa nkombo na yo.+

      Bayengebene báyangana zingazinga na ngai,+

      Mpo ozali kosalela ngai makambo na ndenge oyo ebongi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto