Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nakotya kimya na mokili,+ mpe bokolala mpenza, kozanga ete moto moko alɛngisa+ bino, mpe nakosilisa banyama mabe ya zamba na mokili,+ mpe mopanga ekoleka na mokili na bino te.+

  • Nzembo 29:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yehova ye moko akopesa bato na ye makasi.+

      Yehova ye moko akopambola bato na ye bázala na kimya.+

  • Nzembo 122:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Bósɛngela Yerusaleme kimya.+

      Ee Engumba, baoyo bazali kolinga yo bakozala na mitungisi te.+

  • Yisaya 45:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto oyo asalaka pole+ mpe azalisaka molili,+ oyo asalaka kimya+ mpe abimisaka mpasi,+ ngai Yehova nazali kosala biloko nyonso wana.+

  • Yisaya 60:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na esika ya motako nakotya wolo,+ mpe na esika ya ebende nakotya palata, mpe na esika ya nzete, motako, mpe na esika ya mabanga, ebende; mpe nakotya kimya ezala bakɛngɛli+ na yo mpe boyengebene ezala bato oyo bapesaka yo mosala.+

  • Baroma 15:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Nzambe oyo apesaka kimya azala na bino nyonso.+ Amen.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto