Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Estere 7:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe mokonzi alongwaki na elanga yango ya ndako monene mpe azongaki na ndako ya fɛti ya vinyo;+ mpe Hamane amikweisaki na mbeto+ oyo Estere azalaki. Na yango, mokonzi alobaki ete: “Asangisa mpe nzoto na mwasi ya mokonzi na makasi, wana ngai nazali na kati ya ndako?” Liloba ebimaki na monɔkɔ ya mokonzi,+ mpe bazipaki elongi ya Hamane.

  • Masese 16:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nkɛlɛ ya mokonzi nde bamemi-nsango ya liwa,+ kasi moto ya bwanya nde ye oyo akitisaka yango.+

  • Masese 20:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsɔmɔ oyo mokonzi apesaka ezali konguluma lokola oyo ya mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.+ Ye oyo azali komibendela nkanda na ye azali kosalela molimo na ye moko lisumu.+

  • Danyele 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpo na yango, mokonzi ayokaki nkanda mpe asilikaki makasi,+ mpe alobaki báboma bato nyonso ya bwanya ya Babilone.+

  • Matai 25:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 “Bongo akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa awa,+ bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko+ oyo babongiselá Zabolo ná baanzelu na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto