Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na yango, Yehova alobaki na ye ete: “Nani asalá monɔkɔ mpo na moto to nani asalaka moto oyo alobaka te to moto oyo akufá matoi to moto oyo amonaka to moto oyo akufá miso? Ezali ngai Yehova te?+

  • Nzembo 94:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Moto oyo asalá litoi, akoki nde koyoka te?+

      To Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te?+

  • Misala 26:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 mpo na kofungola bango miso,+ mpo na kolongola bango na molili+ mpo báya na pole+ mpe kolongola bango na nguya ya Satana+ mpo báya epai ya Nzambe, mpo bázwa bolimbisi ya masumu+ mpe libula+ na kati ya baoyo basantisami+ na nzela ya kondima na bango epai na ngai.’

  • Baefese 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 lokola miso+ ya motema na bino engɛngisami,+ mpo bóyeba mpenza elikya+ oyo ye abengelaki bino, bomɛngo ya nkembo+ oyo ye abombi mpo ezala libula ya basantu,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto